Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, ekosepela mpe ekoganga na esengo. Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli mpe ya Saroni ekopesamela yango ; boye bakomona nkembo ya Yawe, lokumu ya Nzambe na biso.
Etando ya Saroni ekokoma esika ya koleisa bibwele, mpe Lubwaku ya Akori ekokoma esika ya kopema mpo na bangombe. Nyonso wana ekosalema mpo na bato na Ngai, oyo balukaka Ngai.
Nani ayoka likambo ya boye ? Nani amona makambo ya boye ? Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko ? Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, tala ye wana asili kobota bana na ye.
Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.