Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono : — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango : — Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo : bima kati na mwasi oyo ! Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.
Tango Petelo amonaki bongo, alobaki na bango : — Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo ? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola, na nzela ya nguya mpe botosi na biso kati na makambo ya Nzambe ?
Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.
Kasi Petelo alobaki na ye : — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.
tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.