31 Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.
Alobaki na bango : « Boni, Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino te ? Apesaki bino bopemi na ngambo nyonso te ? Pamba te akabaki na maboko na ngai bato ya mokili oyo. Mokili yango ezali na se ya bokonzi ya Yawe mpe ya bato na Ye.
Kasi okozala na mwana moko ya mobali oyo akozala moto ya kimia mpe ya boboto. Nakopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingeli ye. Kombo na ye ekozala Salomo ; mpe na mikolo nyonso oyo ye akozala mokonzi, nakopesa kimia mpe bopemi na Isalaele.
Nabakisaki : — Makambo oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengelaki te kotambola na kotosa Nzambe na biso mpo ete topesa te na bapagano oyo bazali banguna na biso nzela ya kotiola biso ?
Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
Sik’oyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe na Liloba na Ye ya ngolu. Nzambe azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula kati na bato nyonso oyo babulisama.
Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te
Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.
Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.
Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki.
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.
Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.
Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino,
mpo ete bozala na bizaleli oyo ebongi liboso ya Nkolo, mpo ete bosepelisa Ye na nyonso, mpo ete bobota bambuma na nzela ya lolenge nyonso ya misala na bino ya malamu, mpo ete bokola kati na boyebi ya Nzambe,
to bakangama te na masapo ya pamba-pamba mpe na botangi milongo ya mbotama, oyo ezangi suka. Makambo ya bongo ebimisaka kaka tembe, na esika ete esunga mpo ete mosala na Nzambe, oyo toyebi na nzela ya kondima, ekende liboso.
Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango.