Boye, Ananiasi akendeki mpe akotaki kati na ndako ; atielaki Saulo maboko na koloba : — Ndeko na ngai, Saulo ; Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela, wana ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu.
Barnabasi azwaki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma ; ayebisaki bango ndenge nini Saulo, na mobembo na ye, amonaki Nkolo, mpe ete Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango lisusu ndenge nini, kati na Damasi, ateyaki na mpiko na Kombo na Yesu.
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !
Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.
Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.