Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki.
Boye, azalaki kosolola na Bayuda mpe Bagreki oyo bazalaki kogumbamela Nzambe kati na ndako ya mayangani, mpe na bato oyo azalaki kokuta, mokolo na mokolo, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
Bongo, Polo akendeki na ndako ya mayangani epai wapi, na basanza misato, azalaki koloba na molende epai na bato ; azalaki koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe kondimisa bango yango.
Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.
Barnabasi azwaki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma ; ayebisaki bango ndenge nini Saulo, na mobembo na ye, amonaki Nkolo, mpe ete Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango lisusu ndenge nini, kati na Damasi, ateyaki na mpiko na Kombo na Yesu.
Boye, wuta na tango wana, Saulo avandaki elongo na bango, azalaki kokende mpe kozonga na bonsomi kati na Yelusalemi, wana azalaki koteya na mpiko, na Kombo ya Nkolo.
Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo ; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya Bapagano, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta.
Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.
Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni ; kasi alobaki kaka : « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu ! »