28 Boye, wuta na tango wana, Saulo avandaki elongo na bango, azalaki kokende mpe kozonga na bonsomi kati na Yelusalemi, wana azalaki koteya na mpiko, na Kombo ya Nkolo.
Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.