Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:2 - Mokanda na Bomoi

2 mpe asengaki ye mikanda ya mosala mpo na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete, soki akuti kuna bato oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi, ezala basi to mibali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:2
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi.


Maloba ya kosambisa Damasi : « Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te, ekokoma nde liboke ya libebi.


Na tina ya Damasi : « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, pamba te bayoki sango ya mabe. Mitema na bango ekomi likolo-likolo mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki.


Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.


Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.


Bateyaki ye nzela ya Nkolo ; mpe, lokola azalaki molende, azalaki koloba mpe kolakisa na bosolo makambo oyo etali Yesu atako ayebaki kaka libatisi ya Yoane.


Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso na tina na Nzela ya Nkolo.


Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga ; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.


Nzokande, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga « binzambe-nzambe. » Nandimaka nyonso oyo ekomama kati na Mobeko mpe kati na mikanda ya basakoli.


Felikisi, oyo ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela, azongisaki bango mpe alobaki : — Nakoyekola malamu likambo na bino tango mokonzi ya basoda, Lisiasi, akoya.


Ezali mosala yango nde nasalaki kati na Yelusalemi : natiaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ; boye, tango bazalaki koboma bango, ngai mpe nazalaki kondima.


Ezali mpo na yango nde nakendeki na Damasi, na bokonzi mpe na etinda ya bakonzi ya Banganga-Nzambe.


Bongo bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo ebengamaka Ndako ya mayangani ya bansomi : Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azia ; bakomaki kotia tembe na miso ya Etieni.


Na mayele mabe, mokonzi yango anyokolaki bakoko na biso kino kotinda bango na makasi ete babwaka bana na bango oyo babotami sika mpo ete bakufa.


Mpe ayei awa, na Damasi, mpo ete bakonzi ya Banganga-Nzambe bapesi ye bokonzi ya kokanga bato nyonso oyo babelelaka Kombo na Yo.


Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpe batunaki : — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki konyokola makasi, kati na Yelusalemi, bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu ? Boni, ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ?


Kati na Damasi, moyangeli ya mokonzi Aretasi apesaki mitindo ete bakengela engumba ya bato ya Damasi mpo ete bakanga ngai.


Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ