Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:19 - Mokanda na Bomoi

19 mpe, sima na ye kolia, nzoto na ye ezongaki lisusu makasi. Saulo avandaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki kati na Damasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:19
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo ; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo.


mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.


Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda.


Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.


Kaka na tango yango, biloko moko lokola biteku ekweyaki wuta na miso ya Saulo, mpe akomaki lisusu komona. Atelemaki mpe azwaki libatisi ;


Tango Saulo akomaki na Yelusalemi, amekaki kosangana na bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, pamba te bazalaki penza kondima te ete akomi penza moyekoli.


Tango bayekoli bayokaki sango ete Petelo azali kati na Lidi oyo ezali penza pene ya Jafa, batindelaki ye mibali mibale mpo na kosenga na ye : « Tobondeli yo, yaka noki ! »


Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi.


Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ