Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Ananiasi azongisaki : — Nkolo, bato ebele bayebisi ngai makambo na tina na moto yango mpe mabe nyonso oyo asali babulami na Yo, na Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:13
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.


Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.


Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.


Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba ; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.


Nzokande, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendeki epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe,


Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpe batunaki : — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki konyokola makasi, kati na Yelusalemi, bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu ? Boni, ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ?


Lokola Petelo azalaki kosala mibembo kati na mboka mobimba, akendeki mpe kotala basantu oyo bazalaki kovanda kati na Lidi.


Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.


Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !


mpo ete nakangolama na maboko ya bato oyo bandimaka te kati na Yuda, mpe mpo ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango.


Bopesa mbote na Filologe, na Jili, na Nere mpe na Olipasi, ndeko na ye ya mwasi, elongo na basantu nyonso oyo bazali na bango elongo.


Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.


Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :


Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,


Mpo na makambo oyo etali makabo ya kokongola mpo na basantu, bosalaka, bino mpe, kolanda mitindo oyo napesaki Mangomba ya Galatia.


Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni ! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye ?


Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe ; Epai ya basantu mpe bandimi ya Yesu-Klisto, oyo bazali kati na Efeso :


Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto ; Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona :


Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi-mingi ba-oyo bazali ya ndako ya mokonzi Sezare.


Epai ya bandeko oyo, kati na engumba Kolose, bazali bule mpe bayengebene kati na Klisto : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso !


Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.


Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.


Samuele alobaki : — Nakokende ndenge nini ? Soki Saulo ayoki bongo akoboma ngai. Yawe azongiselaki ye : — Kamata mwana ngombe ya mwasi elongo na yo mpe loba : « Nakeyi kobonzela Yawe mbeka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ