Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 9:11 - Mokanda na Bomoi

11 Nkolo alobaki na ye : — Telema, kende na ndako ya Yuda, oyo ezali na balabala oyo babengaka « Alima » mpe tuna moto moko ya mboka Tarse, kombo na ye « Saulo. » Azali kosambela

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 9:11
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.


Moto yango ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye kati na ndako na ye mpe koloba na ye : « Tinda bato, na Jafa, mpo bakende kobenga Simona oyo kombo na ye mosusu ezali Petelo.


Bongo, Barnabasi akendeki na Tarse mpo na koluka Saulo ;


Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »


Polo azongisaki : — Te, ezali ngai te ! Ngai nazali Moyuda ya Tarse, kati na mokili ya Silisi, mpe moto ya engumba moko ya tina mingi. Nabondeli yo, pesa ngai nzela ya koloba na bato.


— Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai ; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.


Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.


Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo : — Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza.


Tango bandimi bayokaki likambo yango, bamemaki Saulo na Sezarea, mpe, longwa kuna, batindaki ye na Tarse.


Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ