10 Kati na Damasi, ezalaki na moyekoli moko oyo kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Nkolo abengaki ye kati na emoniseli : — Ananiasi ! Azongisaki : — Nkolo, ngai oyo !
alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.
Mokolo moko, na ngonga pene ya misato sima na midi, azwaki emoniseli ; amonaki na polele anjelu moko ya Nzambe koya epai na ye mpe koloba na ye : — Kornei !
— Wana nazalaki kati na engumba Jafa mpe nazalaki kosambela, nakweyaki na Molimo mpe nazwaki emoniseli. Namonaki eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei kokita wuta na Likolo, mpe ekomaki kino na esika oyo nazalaki.
Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo : akanisaki ete azwi emoniseli.
Sima na Polo kozwa emoniseli, tolukaki mbala moko kokende na Masedwane, pamba te tososolaki ete ezali Nzambe nde abengi biso mpo ete tokende koteya kuna Sango Malamu.
Na butu, Polo azwaki emoniseli moko : « Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye : ‹ Nabondeli yo, yaka kosunga biso kati na Masedwane ! › »
« Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ; bilenge na bino bakozwa bimoniseli, mibange na bino bakolota bandoto.
Ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana.
Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi.