Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 8:37 - Mokanda na Bomoi

37 Filipo alobaki : — Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi. Moto yango azongisaki : — Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe !]

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 8:37
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Simona Petelo azongisaki : — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.


Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ;


Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.


Marte azongisaki : — Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.


Kasi mpo na oyo ekomami, ezali mpo ete bondima ete Yesu azali Klisto, Mwana na Nzambe ; mpe mpo ete, na nzela ya kondima Ye, bozwa bomoi na Kombo na Ye.


Simona Petelo azongisaki : — Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko.


Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : — Boni, ondimi Mwana na Moto ?


Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.


Kasi tango bandimaki Sango Malamu oyo Filipo ateyaki na tina na Bokonzi ya Nzambe mpe na tina na Kombo na Yesu-Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi.


Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.


Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki : — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ? [


Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye.


Kaka na tango yango, abandaki koteya na bandako ya mayangani ete Yesu azali Mwana na Nzambe.


pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.


Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.


Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto


Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe.


Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye.


Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.


Nani oyo alongaka mokili ? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ