Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 8:32 - Mokanda na Bomoi

32 Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 8:32
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namilobelaki : « Nakosala keba na etamboli na ngai mpo ete monoko na ngai esala masumu te ; nakobatela penza monoko na ngai tango nyonso moto mabe akozala liboso na ngai. »


Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso, kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.


Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »


Nzokande, oh Yawe, oyebi ngai, omonaka ngai mpe oyebi makanisi ya motema na ngai mpo na Yo. Tindika bango lokola bameme oyo babongisi mpo na koboma ! Bongisa bango mpo na mokolo ya kufa.


« nakomema bango ndenge bamemaka bampate to bameme ya mibali to mpe bantaba ya mibali na esika oyo babomelaka bibwele.


Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,


Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba,


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


Azongisaki : — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.


Kolanda ndenge ekomama : « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »


Liboso na nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki : Klisto akufaki mpo na masumu na biso, kolanda Makomi ;


kasi ezali nde na nzela ya makila ya talo ya Klisto lokola mpate oyo ezangi mbeba mpe litono.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ