Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 8:31 - Mokanda na Bomoi

31 Azongisaki : — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 8:31
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Elize alobaki na ye : — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ?


Boye Namani akendeki elongo na bampunda na ye mpe shar na ye, mpe atelemaki na ekotelo ya ndako ya Elize.


nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.


Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.


Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye : — Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga ?


Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.


Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te ?


Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.


Moto oyo akanisaka ete azali na boyebi ya makambo ayebi nanu eloko te na ndenge esengeli.


mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga.


Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ