« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali ; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia ; boya kosomba vino mpe miliki : ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !
Daniele azongiselaki mokonzi : — Batela bakado na yo mpo na yo moko mpe pesa lifuti na yo epai ya moto mosusu ! Kasi ngai, nazali kotanga makomi yango mpo na mokonzi ; bongo, nakopesa ye ndimbola na yango.
Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga ; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki.
Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.
Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama.
Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
wolo mpe palata na bino esili kobeba ; mpe libebi na yango ekotatola mabe na bino mpe ekolia banzoto na bino lokola moto. Bozali kobakisa se kobakisa bomengo ! Boyebi te ete tokomi na mikolo ya suka ?