mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »
Boye, Ananiasi akendeki mpe akotaki kati na ndako ; atielaki Saulo maboko na koloba : — Ndeko na ngai, Saulo ; Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela, wana ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu.