16 pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango ; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ;
mpe atunaki bango : — Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi ? Bazongisaki : — Te ! Totikala nanu koyoka te ete Molimo Mosantu azalaka.
Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu-Klisto tozwaki nde libatisi kati na kufa na Ye ?
pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.