Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 8:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bato nyonso, kobanda na bana mike kino na mikolo, bayokaki ye na bokebi mpe balobaki : « Moto oyo, azali penza nguya ya Nzambe, nguya oyo babengaka : Nguya monene. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 8:10
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »


Bongo, bakonzi nyonso ya basoda mpe Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Yezania, mwana mobali Oshaya, mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene, bapusanaki


« Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe : bango nyonso bazali kotambola na lokuta.


Yango wana, nakokaba basi na bango epai ya mibali mosusu, mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ; pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, batondi na lokoso ya mbongo ; basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi se kotambola na lokuta ;


Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe ; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola.


Tango ebele ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na lokota ya bato ya Likawoni : — Banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso !


Bato nyonso bazalaki kozela ete nzoto na ye evimba to akufa mbala moko ; kasi wana bazelaki tango molayi mpe bamonaki ata likambo moko te ya mabe kokomela ye, babongolaki makanisi mpe balobaki : — Moto oyo azali nzambe.


Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe.


Bino oyo bozali bato ya bwanya, bozali kondima na esengo nyonso bato ya maboma.


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


Bato ebele bakolanda bango kati na mobulu na bango, mpe nzela ya bosolo ekofingama likolo na bango.


Moko kati na mito na yango ezalaki komonana lokola nde ezali na pota moko ya monene makasi oyo ekokaki komema yango na kufa, kasi pota yango esilaki. Mokili mobimba elulaki nyama yango mpe ekomaki kolanda yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ