Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 7:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bongo Nzambe asalaki boyokani elongo na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki : kokatama ngenga. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe ya mbotama na ye ; Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye ngenga, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango ngenga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 7:8
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te.


mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali.


Jakobi mpe libota na ye balongwaki na Beteli. Wana bazalaki nanu mwa mosika na Efrata, Rasheli abotaki, kasi na pasi makasi.


Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame.


Abrayami azalaki tata ya Izaki. Bana mibali ya Izaki : Ezawu mpe Isalaele.


Abrayami abotaki Izaki ; Izaki abotaki Jakobi ; Jakobi abotaki Yuda mpe bandeko na ye ya mibali ;


Bokanisa nanu : Moyize apesaki bino mitindo ya kokatisa ngenga, —mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko— mpe botosaka mitindo yango ata na mokolo ya Saba.


Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina na Davidi, koko na biso, ete akufa mpe bakunda ye ; mpe kunda na ye ezali awa kino lelo.


Esalemaki tango nini ? Esalemaki liboso na ye kokatisa ngenga to sima na ye kokatama ngenga ? Esalemaki te sima na ye kokatama ngenga ; esalemaki nde liboso na ye kokatisa ngenga.


Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo : Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama.


Nalobi boye : « Mobeko oyo eyaki sima na mibu nkama minei na tuku misato ezali na makoki te ya koboma boyokani oyo Nzambe asala wuta kala elongo na Abrayami ; soki te, elaka ekomi eloko pamba. »


Botala ndenge nini Melishisedeki azalaki moto monene mpo ete ezala Abrayami, koko na biso, apesa ye eteni ya zomi ya bomengo na ye ya bitumba !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ