7 Kasi Nzambe alobaki lisusu : « Nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu. Mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango mpe bakosambela Ngai na esika oyo. »
Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito.
Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.