Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 7:59 - Mokanda na Bomoi

59 Wana bazalaki kobamba ye mabanga, Etieni azalaki kosambela na koloba : — Nkolo Yesu, yamba molimo na ngai !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 7:59
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.


Bikisa ngai na motambo oyo batieli ngai, pamba te ozali ebombamelo na ngai.


liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.


Yesu agangaki na mongongo makasi : — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo. Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.


Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »


Mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »


Mpe ayei awa, na Damasi, mpo ete bakonzi ya Banganga-Nzambe bapesi ye bokonzi ya kokanga bato nyonso oyo babelelaka Kombo na Yo.


Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpe batunaki : — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki konyokola makasi, kati na Yelusalemi, bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu ? Boni, ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ?


Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :


Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ