58 bamemaki ye libanda ya engumba mpe babambaki ye mabanga. Na tango wana, batatoli batikaki bilamba na bango epai ya elenge mobali moko na kombo Saulo.
Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.
batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se.
Ezali mosala yango nde nasalaki kati na Yelusalemi : natiaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ; boye, tango bazalaki koboma bango, ngai mpe nazalaki kondima.
Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.
Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo.