Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 7:56 - Mokanda na Bomoi

56 Alobaki : — Botala, namoni Likolo efungwami mpe Mwana na moto atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 7:56
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.


Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.


Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga.


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga.


Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,


Bongo alobaki lisusu : « Nazali koloba na bino penza ya solo : bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto. »


Amonaki Likolo efungwami, mpe eloko moko lokola elamba monene basimba na basonge na yango minei ezali kokita na mabele.


Esalemaki bongo mbala misato, mpe eloko yango elimwaki kati na Likolo.


Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza, mpe bango nyonso basangelaki ye,


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Sima na makambo oyo, namonaki ekuke moko efungwama kati na Lola. Bongo mongongo oyo nayokaki koloba na ngai lokola kelelo na mbala ya liboso elobaki na ngai lisusu : « Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima na oyo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ