Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 7:50 - Mokanda na Bomoi

50 Boni, ezali loboko na Ngai te nde esalaki biloko wana nyonso ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 7:50
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango, kasi akataki mosala na mokolo ya sambo. Yango wana, Yawe apambolaki mokolo ya Saba mpe abulisaki yango.


Oyebi te ? Nanu oyoka te ? Yawe azali Nzambe ya libela na libela, azali Mokeli ya basuka ya mabele ; alembaka te mpe apemaka te, mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.


« Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo azali Mosikoli na yo, oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo : Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso, Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa, Ngai moko nde natandaki mabele.


Ngai nde nasala mabele mpe nakela bato kati na yango ; loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »


Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.


— Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Nzambe oyo asala mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango azali Nkolo ya Likolo mpe ya mokili, avandaka te kati na batempelo oyo maboko ya bato etonga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ