Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 7:49 - Mokanda na Bomoi

49 « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai, elobi Nkolo, to esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 7:49
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.


Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi !


Boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili elongo na bato ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo ngai natongi ?


Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso ; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?


« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye ? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » elobi Yawe.


Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mpe moto oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo alapi yango na kombo ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe na Kombo ya Ye oyo avandelaka yango.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.


Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi.


Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ