41 Ezalaki na mikolo wana nde basalaki nzambe ya ekeko, na lolenge ya mwana ngombe ; babonzelaki nzambe yango ya ekeko mbeka mpe basalaki feti mpo na lokumu ya misala ya maboko na bango.
ezala tango bamisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende oyo banyangwisa na moto mpe balobaki : ‹ Tala Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ! › mpe tango balobaki maloba ya nkele mpo na kotelemela Yo.
Isalaele, kosepela te ; kozala na esengo te lokola bikolo mosusu ; pamba te otikaki Nzambe na yo mpe okendeki kosala kindumba ; osepelaki na lifuti ya kindumba na bitando nyonso oyo batutelaka ble.
Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.
Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki ; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te.