Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 7:26 - Mokanda na Bomoi

26 Mokolo oyo elandaki, Moyize akutaki bana ya Isalaele mibale kobunda. Bongo amekaki kozongisa boyokani kati na bango ; alobaki na bango : « Ah baninga na ngai, bozali bandeko ; mpo na nini bozali kosalana mabe ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 7:26
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko.


Jozefi atikaki bandeko na ye kokende. Tango bazali kolongwa, alobaki na bango : — Boswana te na nzela.


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !


Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.


Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato.


Moyize akanisaki ete bandeko na ye bakososola ete Nzambe azali kosalela ye mpo na kopesa bango lobiko, kasi basosolaki yango te.


Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino,


Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ