Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.
Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.
Mongongo ya Yawe eyokani na likolo ya mayi, Nzambe ya nkembo azali koleka elongo na lokito, Yawe azali koleka elongo na lokito na likolo ya mayi minene.
Botala Abrayami, tata na bino ; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele !
Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
Jozue alobaki na bato nyonso : — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Wuta kala, bakoko na bino mpe Tera, tata ya Abrayami mpe Naori, bavandaki na ngambo mosusu ya ebale mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu.
« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso : ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »