16 Bamemaki banzoto na bango na engumba ya Sishemi mpe bakundaki yango kati na kunda oyo Abrayami asombaki na mbongo epai ya bana ya Amori, tata ya Sishemi.
Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye.
Moyize azwaki mikuwa ya Jozefi, pamba te Jozefi alapisaki bana ya Isalaele ndayi ; alobaki : « Solo, Nzambe akozanga te kosunga bino, boye bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo mpe bokomema yango elongo na bino. »
Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi.