11 Nzokande, nzala moko ya makasi ekotaki na Ejipito mobimba mpe na Kanana, ememaki pasi penza, bongo bakoko na biso bazalaki lisusu na eloko ya kolia te.
Kuna, nakokokisa baposa na yo nyonso, pamba te mibu mitano ya nzala makasi ezali koya ; soki te, yo elongo na bana na yo mpe bibwele na yo nyonso, bokokoma na pasi.
Balobaki lisusu na Faraon : — Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo ; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni.