Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 6:4 - Mokanda na Bomoi

4 Boye, biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya koteya Liloba na Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 6:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye.


Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.


Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.


Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino


Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu !


nasambelaka Nzambe tango nyonso mpo na bino nyonso mpe nasalaka yango na esengo,


Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko nyonso oyo bamoni ngai nanu te.


Epafrasi, ye oyo azali mpe moko kati na bino mpe mowumbu ya Yesu-Klisto, atindeli bino mbote. Abundaka tango nyonso etumba mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete botelema ngwi lokola bato oyo bakembi kati na kondima mpe baselingwa mpo na kokokisa mokano nyonso ya Nzambe.


Boloba na Arshipe : « Sala keba na lotomo oyo ozwaki kati na Nkolo mpo ete okokisa yango malamu. »


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ