Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 6:15 - Mokanda na Bomoi

15 Bato nyonso oyo bavandaki na Likita-Monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 6:15
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani azali lokola moto ya bwanya ? Nani ayebi kolimbola makambo ? Bwanya engengisaka elongi ya moto, mpe efungolaka elongi oyo ekangama.


Bongo bato ya sembo bakongenga lokola moyi kati na Bokonzi ya Tata na bango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !


Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza.


Bongo, mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki ye : — Boni, makambo oyo bafundeli yo ezali ya solo ?


Mpe biso nyonso oyo bilongi na biso ezipama te, biso oyo tomonisaka nkembo ya Nkolo, tozwaka elilingi na Ye kati na nkembo oyo kongenga na yango ebakisamaka se kobakisama. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo oyo azali Molimo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ