Misala ya Bantoma 6:14 - Mokanda na Bomoi14 pamba te toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›
Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.
Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango : — Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te ya bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome.