Misala ya Bantoma 5:9 - Mokanda na Bomoi9 Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? »