Misala ya Bantoma 5:42 - Mokanda na Bomoi42 Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.