Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 5:40 - Mokanda na Bomoi

40 babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbu mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 5:40
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto ya sembo ayebaka ata baposa ya bibwele na ye, kasi motema ya moto mabe eyokaka mawa te.


balobaka na bato oyo bamonaka makambo : « Bomona te, » mpe na basakoli : « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te, boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso, bosakolela biso makambo ya lokuta.


« Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.


Basakoli na bango bazalaki koloba : « Kosakola te, kosakola makambo ya boye te ! Pasi ekokomela biso te. »


Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.


mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »


Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko,


Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.


Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.


Alobaki : — Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana.


Mbala mitano, Bayuda babetaki ngai bafimbu tuku misato na libwa ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ