Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 5:36 - Mokanda na Bomoi

36 Eleki mikolo mingi te, moto moko na kombo Teodasi awutaki kobima. Azalaki komimona moto monene, mpe bato pene nkama minei bazalaki kolanda ye. Kasi tango babomaki ye, bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe lisanga na ye ekufaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 5:36
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.


Soki moto moko alobi na bino : « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te ; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te.


Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.


Boni, ezali yo te moto ya Ejipito oyo akotisaki mobulu na mikolo oyo eleki mpe amemaki batomboki nkoto minei kati na esobe ?


Alobaki na bango : — Bato ya Isalaele, bosala keba mpo na makambo oyo bolingi kosala bato oyo.


Nzokande, wuta kala, kati na engumba yango, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona. » Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato ya Samari mpe komimona moto monene.


Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai ; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.


Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko.


Pamba te, mpo na kosepelisa baposa mabe ya banzoto na bango, basalelaka maloba ya sukali mpe ezanga tina mpo na kopengwisa bato oyo bawuti kobongola mitema sika wana bawuti kokabwana na bato oyo babikaka kati na libunga.


Bato ebele bakolanda bango kati na mobulu na bango, mpe nzela ya bosolo ekofingama likolo na bango.


Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.


Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi.


Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali : Babiloni monene, Mama ya Basi ya Ndumba mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ