Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, Izaki mpe Isalaele, batata na biso, batela makanisi oyo kati na mitema ya bato na Yo mpo na libela mpe sala ete mitema na bango ekangama na Yo.
Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,
Nzambe akokisi yango mpo na biso, bana na bango, na kosekwisa Yesu kati na bakufi, kolanda ndenge ekomama kati na Nzembo ya mibale : « Ozali Mwana na Ngai ; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »
Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.
Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »
Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.