Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Boye, Petelo atunaki ye : — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 5:3
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ? ›


Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu : « Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, » mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.


Eleki malamu ete olapa na yo kutu ndayi te na esika ya kolapa ndayi mpe ozanga kokokisa yango.


Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ? Nani akoyeba ? »


« Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, bongo Ngai nazanga komona ye ? » elobi Yawe. « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » elobi Yawe.


Moyize alobaki na bakambi ya mabota ya Isalaele : « Tala mobeko oyo Yawe asili kopesa :


Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.


Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale.


Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu.


Tango kaka Yuda azwaki eteni yango ya lipa, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye : — Likambo oyo obongisi kosala, kokisa yango noki.


Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango.


Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te ? Mpe sima na koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi ? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye ? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe !


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te ; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa.


Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino.


Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ