Misala ya Bantoma 5:28 - Mokanda na Bomoi28 Alobaki : — Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sik’oyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !