Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 5:25 - Mokanda na Bomoi

25 Bongo moto moko ayaki koyebisa bango : — Boyoka ! Bato oyo bobwakaki na boloko, batelemi kuna na Tempelo mpe bazali koteya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 5:25
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abimisaki bango wuta na molili makasi mpe na molili ya kufa, mpe abukaki minyololo na bango.


« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.


Mokonzi Nabukodonozori atombokaki makasi mpe abengisaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego. Boye, bamemaki bango liboso ya mokonzi.


Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.


kasi bamosusu bakendeki kokuta Bafarizeo mpo na koyebisa bango makambo yango, oyo Yesu asalaki.


Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima na midi.


Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini.


Mbala moko, mokonzi ya bakengeli akendeki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ