23 — Tokuti boloko ya kokangama malamu mpe bakengeli liboso ya bikuke ; kasi tango tofungoli yango, tomoni ata moto moko te na kati.
Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.
Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.
Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.
Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?
Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.
Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango :
Kasi tango bakengeli bakomaki na boloko, bakutaki bango te. Bazongaki mpe balobaki :
Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini.