Misala ya Bantoma 5:21 - Mokanda na Bomoi21 Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita-Monene—lisanga mobimba ya bakambi ya bana ya Isalaele—mpe bapesaki mitindo ete bakende kozwa bantoma na boloko. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.