Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;
Mpo na tango oyo, lokola bozali kati na bofuluki, bokoki kosunga bato na biloko oyo bazali na yango na bosenga. Mokolo mosusu, tango bango mpe bakozala kati na bofuluki, bakosunga bino na biloko oyo bokozala na yango na bosenga. Na ndenge wana nde bokokokana,
Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »
Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.