Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 4:31 - Mokanda na Bomoi

31 Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 4:31
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Liboso ete babelela Ngai, nakoyanola bango ; mpe wana basilisi nanu koloba te, nakoyoka bango.


Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.


Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi Ngai akosala misala oyo nazali kosala ; akosala kutu misala oyo eleki minene, pamba te nazali kokende epai ya Tata.


Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Soki bokowumela kati na Ngai, mpe maloba na Ngai ekowumela kati na bino, bosenga nyonso oyo bolingi, bokozwa yango.


Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo ; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene.


Tango mokolo ya Pantekoti ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko.


Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana.


Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.


Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.


Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso.


Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi.


Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ