Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » Liloba na Ye kati na motema na ngai ekomaka lokola moto oyo ezali kopela kino na mikuwa na ngai ; nalongaka te kokanga yango, nakokaka te !
Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. « Sopa yango na bana mike kati na babalabala mpe na lisanga ya bilenge mibali ; ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, ezala mikolo to mibange.
Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu ; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › »
kobanda na tango oyo Yoane abatisaki Ye kino na mokolo oyo balongolaki Ye kati na biso. Pamba te moko kati na mibali yango asengeli kokoma, elongo na biso, motatoli ya lisekwa na Ye.
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.