Wana nazalaki kokanisa na tina na yango, ntaba moko ya mobali eyaki wuta na ngambo ya weste ; ezalaki kotambola mabele mobimba na kozanga konyata yango. Ntaba yango ya mobali ezalaki na liseke moko ya monene na kati-kati ya miso na yango ;
Ntaba ya mobali ekolaki makasi ; kasi tango ekomaki lisusu na nguya makasi, liseke na yango ya monene ebukanaki. Maseke minei ya minene ebotaki na esika ya liseke wana moko mpe etalaki na bangambo minei ya likolo.
Bazongisaki : « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. » Bongo alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »