Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 3:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bongo, asimbaki ye na loboko ya mobali mpe atelemisaki ye. Mbala moko, makolo na ye ekomaki makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 3:7
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.


Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : « Talita kumi ! » Elingi koloba : Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !


Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki.


Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.


Kasi Petelo alobaki na ye : — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango : na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.


Mbala moko, atelemaki mpe abandaki kotambola, akotaki nzela moko na bango kati na lopango ya Tempelo : azalaki kotambola, kopumbwa mpe kokumisa Nzambe.


Bazalaki kotunana : — Tosala penza nini na bato oyo ? Pamba te bavandi nyonso ya Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene ; tokoki kowangana yango te.


Lokola botuni biso lelo na tina na bolamu oyo esalemi epai ya mokufi makolo mpe ndenge nini asili kobika,


Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ