Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye.
Tango natalaki yango malamu, namonaki kati na yango banyama ya mabele, oyo ezali na makolo minei ; banyama ya zamba, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya likolo.
Tango Petelo amonaki bongo, alobaki na bango : — Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo ? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola, na nzela ya nguya mpe botosi na biso kati na makambo ya Nzambe ?