Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 3:21 - Mokanda na Bomoi

21 Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 3:21
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala ; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.


akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kala na nzela ya basakoli na Ye ya bule,


— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.


Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye akozwa bolimbisi ya masumu na nzela ya Kombo na Ye.


Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino,


mpe mpo ete Nkolo akoka kopesa bino tango ya kopema mpe akoka kotindela bino Klisto oyo apona mpo na bino—Ye nde Yesu.


bikelamu nyonso mpe ekokangolama na bowumbu ya libebi na yango mpo na kozwa bonsomi ya nkembo oyo bana na Nzambe bakozwa.


Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.


pamba te maloba yango ya basakoli eyaki te na nzela ya mokano ya moto, kasi ezali Molimo Mosantu nde atindikaki bato na koloba kowuta na Nzambe.


mpo ete bokanisa lisusu maloba oyo basakoli ya bule balobaki na tango ya kala mpe Mibeko oyo Nkolo mpe Mobikisi apesaki na nzela ya bantoma na bino.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Anjelu alobaki na ngai : « Maloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. Nkolo, Nzambe ya milimo ya basakoli, atindaki anjelu na Ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ